Bandeko Bana Ekono Congo ;
Mokolo mwa zomi na minei ya sanza eye ya mibale na mobu moye,
Bato miliardi mobimba bakotelema na molongo moko
Mpo na koboya mpe kotelemela makambo ya konyokola basi mpe kozwa bango na makasi.
Biso mpe Bana Ekolo Congo,
Elongo na miliardi wana ya mokili mobimba,
Tosangana mpe tobelela makasi mpo na kosenga kimia:
Mibu zomi na motoba ya bitumba
Mibu zomi na motoba ya bozwi basi na makasi mpe konyokola bango,
Mibu zomi na motoba ya pasi mpe bonyokwami
Mibu zomi na motoba oyo tobungisi pamba pamba
Eleki!
Totelema lokola moto moko
O mokolo mwa zomi na minei, mobu nkoto mibale na zomi na misato
Tosangana na miliardi moko ya bato ya bikolo nkama moko na ntuku libwa na mitano ya mokolo mobimba;
Topanza mingongo mya biso
Mpo na kotelemela mpe koboya bozwi basi na makasi
Mpo na koboya bozwi basi na makasi ndenge bato mosusu bakomisa yango mayele ya kosala bitumba
Tosenga kimia, tosenga bosembo mpe bomoko na kati ya Ekolo na biso.
Soki tosali yango biso moko te, bato basusu bakosala yango mpo na biso te!
Natondi bino botondi!

